Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 22:44 - Mokanda na Bomoi

44 « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 22:44
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »


Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.


Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Toma azongiselaki Yesu : — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo ? »


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.


Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ