Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 22:4 - Mokanda na Bomoi

4 Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango : « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei : nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta ; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 22:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,


Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.


Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.


Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.


Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso ; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso.


Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba : bamoko bakendeki na bilanga na bango ; bamosusu, na mombongo na bango ;


Alobaki na basali na ye : « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.


Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »


Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ