Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 22:31 - Mokanda na Bomoi

31 Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 22:31
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala,


Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te !


Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? »


Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »


Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.


« Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.


Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ