Petelo azongisaki : — Afutaka ! Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye : — Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?
Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »
Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.
Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi ; ezalaki koloba : « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. »