Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 22:17 - Mokanda na Bomoi

17 yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 22:17
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela ; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita.


Bosengeli lisusu koyeba ete bozali lisusu na ndingisa te ya kosenga na Nganga-Nzambe nyonso, Molevi nyonso, moyembi nyonso, mokengeli nyonso ya ekuke, mosali nyonso ya Tempelo, mpe na mosali nyonso mosusu ya Ndako ya Nzambe ete afuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.


Bamosusu lisusu bazalaki koloba : — Topesaki bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino lokola ndanga mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi.


Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »


ete bozali kosala libunga monene tango bozali kotinda ngai epai na Yawe, Nzambe na bino, na maloba oyo : ‹ Bondela mpo na biso Yawe, Nzambe na biso, mpe yebisa biso makambo nyonso oyo Yawe akoloba ; tokosalela yango. ›


Petelo azongisaki : — Afutaka ! Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye : — Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?


Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ?


Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome.


Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?


Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.


mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye : Yesu ! »


Polo asambaki boye : — Nasalaki mabe moko te, nabukaki ata mobeko moko te ya Bayuda to ya Tempelo to mpe ya Sezare.


Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso.


Sima na ye, tango tozalaki kotanga motango ya bato kati na mokili, moto moko mpe lisusu na kombo Yuda, moto ya Galile, abimaki mpe amemaki bato ebele na botomboki. Ye mpe lisusu babomaki ye, bongo bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ