14 Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.
Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »