Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 22:12 - Mokanda na Bomoi

12 Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 22:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.


Tango bato ya sembo bamonaka bongo, basepelaka, kasi bato nyonso ya mabe bakangaka minoko na bango.


« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele : bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.


Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango : « Moninga na ngai, nasali yo mabe te ! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende ?


Yesu alobaki na ye : — Molingami na Ngai, likambo oyo oyei kosala awa, sala yango. Bongo bato mosusu oyo bayaki elongo na ye bapusanaki, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye.


Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu ; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ