Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala : « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. » Boye abimisaki bilamba mpo na bango.
Oh Siona, lamuka, lamuka ! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.
Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›
Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.
Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.