Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 21:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 21:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokumisa Yawe ! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.


Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : — Oyo lisusu nani ?


Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! »


Pamba te, nazali koloba na bino : Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! › »


Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !


Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino : Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! »


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ