7 Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »
Alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango.
Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango.
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela.