Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 21:44 - Mokanda na Bomoi

44 Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.]

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 21:44
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.


Pamba te ekolo to mboka oyo ekosalela yo te ekobebisama ; solo, ekobebisama nye.


Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso ; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka ; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.


Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [


Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango.


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.


Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.


Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.


kolanda ndenge ekomama : « Tala, nazali kotia kati na Siona libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato ; moto oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »


bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.


mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato. » Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe ; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ