27 Boye, bazongiselaki Yesu : — Toyebi te ! Yesu mpe alobaki na bango : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
Azali nani, ye oyo azali koluka koteya ? Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani ? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele ?
Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »
Yesu alobaki na bango lisusu : — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo ? Moto moko azalaki na bana mibali mibale ; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye : « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »