Matayo 21:19 - Mokanda na Bomoi19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela. Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga : baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango ; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema ; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma ; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.