Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 21:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 21:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »


Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !


Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.


Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba,


Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale,


Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.


Tango pokwa ekomaki, Yesu mpe bayekoli na Ye babimaki na engumba.


Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.


Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,


Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.


Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ;


Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.


Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte.


Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ