Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 21:16 - Mokanda na Bomoi

16 Balobaki na Yesu : — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 21:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba ! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala,


Yesu azongisaki : — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »


Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino :


Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele !


Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei ?


Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ