Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 21:12
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata.


Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka.


Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu.


Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »


Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.


Nganga-Nzambe akozwa moko kati na bibenga mibale oyo moto wana abonzi kolanda bozwi na ye


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.


Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.


mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka.


Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ