Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 21:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 21:11
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama : « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »


Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : — Oyo lisusu nani ?


Soki mpe tolobi : « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli.


Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.


Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! » Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! »


Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda ; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi !


Yesu atunaki bango : — Makambo nini ? Bazongisaki : — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.


Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !


Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki : — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.


Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !


Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?


Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.


Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »


Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, »


Batunaki lisusu mokufi miso : — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ? Azongiselaki bango : — Azali mosakoli.


Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bana ya Isalaele : « Nzambe akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ