Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:6 - Mokanda na Bomoi

6 Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango : « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.


Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi ; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.


Bazongisaki : « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. » Bongo alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »


Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.


Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.


(Bato nyonso ya Ateni mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika).


Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ