Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi ; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »


Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango : « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te ? »


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Yesu azongiselaki bango : — Boya mpe bokomona. Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi.


Yesu azongisaki : — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo.


Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.


Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !


Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela.


Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ