Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:4 - Mokanda na Bomoi

4 Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ngonga ya libwa ya tongo, abimaki lisusu mpe amonaki, na esika oyo bato bakutanaka, bato mosusu oyo bazalaki kosala eloko moko te.


Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi ; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.


Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.


Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.


Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.


Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.


Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ