Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.
Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »
Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.