31 Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi : — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango.
Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango : — Bolingi nasala nini mpo na bino ?
Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
bosambelaka na kolemba te ;