Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:26 - Mokanda na Bomoi

26 Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:26
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.


mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino !


Bango mpe bakotuna Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi ; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te ? »


Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye.


Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;


Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.


Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.


Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.


Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.


ezali mpe te mpo na kokonza kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te botelemi ngwi kati na kondima.


Tika ete, na mokolo wana, Nkolo atalisa ngolu na Ye epai ya Onezifore ! Oyebi lisusu malamu ndenge nini asungaki ngai kati na Efeso.


Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.


Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.


Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


na makanisi te ya kokonza bato oyo bapesameli bino, kasi na kozalaka bandakisa mpo na etonga.


Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu. Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ