Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : — Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.
Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !
Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya ; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta.
Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »