Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:23 - Mokanda na Bomoi

23 Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:23
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.


Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana.


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.


Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga.


Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula : tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.


Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »


Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.


Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.


Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.


Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ