Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yesu azongiselaki bango : — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ? Bazongisaki : — Iyo, tokoki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olobaki : « Na tango oyo ngai moko nakobongisa, nakokata makambo na bosembo.


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango !


Petelo alobaki na Ye : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.


Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !


Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Azalaki kobondela : — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango !


« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [


Kasi Yesu alobaki na Petelo : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?


Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.


Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ