Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:21 - Mokanda na Bomoi

21 Yesu atunaki ye : — Olingi nini ? Azongisaki : — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:21
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.


Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.


Mokonzi atunaki ye : — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai !


Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli ; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.


Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko ? Te ! Koluka yango te ! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »


Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?


Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Yesu azongiselaki bango : — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ? Bazongisaki : — Iyo, tokoki.


Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango : — Bolingi nasala nini mpo na bino ?


Yesu alobaki na ye : — Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Moteyi, nalingi komona.


Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi : — Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango !


— Olingi nasala nini mpo na yo ? Mokufi miso azongisaki : — Nkolo, nalingi komona.


Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.


Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.


Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.


Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye : — Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi epai ya Isalaele ?


Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;


Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.


Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ