Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; Andre, ndeko ya Petelo ; Jake, mwana mobali ya Zebede ; Yoane, ndeko ya Jake ;
Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire.
Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ;
Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;