Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.
Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »
Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola ! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.
akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.
mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki : — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »
Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.