Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango : « Moninga na ngai, nasali yo mabe te ! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende ?
Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.