Bongo ekomaki ngonga ya kofuta bato oyo nkolo elanga azwaki liboso na mosala ; bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka, kasi moko na moko kati na bango azwaki lokola lifuti, mbongo moko kaka ya ebende.
Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa ; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.