Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 20:1 - Mokanda na Bomoi

1 Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 20:1
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.


Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.


Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »


Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.


Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo ? Moto moko azalaki na bana mibali mibale ; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye : « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »


— Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.


Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye.


« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.


Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.


Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.


apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ