Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 2:6 - Mokanda na Bomoi

6 « Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 2:6
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Salima, tata ya Beteleemi ; mpe Arefi, tata ya Beti-Gaderi.


Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.


Bato ya mboka Beteleemi, nkama moko na tuku mibale na misato.


Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › »


Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Yesu atunaki ye mpo na mbala ya mibale : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai.


Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi ? »


Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba


azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba ; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,


Toyebi malamu ete Nkolo na biso azali ya libota ya Yuda, mpe Moyize atikalaki koloba eloko moko te na tina na bonganga-Nzambe ya libota ya Yuda.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ