Matayo 2:5 - Mokanda na Bomoi5 Bazongiselaki ye : — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki : — Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi !
Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.