20 mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye, mpe zonga kati na mokili ya Isalaele, pamba te bato oyo bazalaki koluka koboma Mwana basili kokufa. »
Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon : — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai.
Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani : — Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa.
Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye ; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »