Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
« Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »
Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga : « Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo, Mokonzi ya Isalaele ! »
Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba : « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo ? »
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.