Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 2:18 - Mokanda na Bomoi

18 « Makelele moko eyokani na Rama, makelele ya kolela makasi mpe ya matanga : Rasheli azali kolela bana na ye ; aboyi kobondisama, pamba te bazali lisusu na bomoi te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 2:18
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? »


Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai !


Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi : Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.


Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki :


Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !


Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi : « Mawa ! Mawa ! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ