Matayo 2:16 - Mokanda na Bomoi16 Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.