Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire.
Sima na bango koyoka maloba ya mokonzi, bakobaki nzela na bango. Bamonaki lisusu monzoto oyo ewutaki kobima na este : monzoto yango ezalaki kotambola liboso na bango kino ekendeki kotelema na likolo ya esika oyo Mwana azalaki.
Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,