8 Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.