Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 19:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi Bafarizeo balobaki na Ye : — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 19:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.


Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.


Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia.


Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »


Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te.


Boyokaki lisusu ete baloba : ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. ›


Balobaki na Yesu : — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ