Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 19:6 - Mokanda na Bomoi

6 Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 19:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye ;


Bozali kotuna : « Mpo na nini boye ? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.


Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.


mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ?


Kasi Bafarizeo balobaki na Ye : — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ?


Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.


Ndakisa : Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali.


Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ