Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »
Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !
Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »
Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »