Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.
Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.