25 Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.