Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 19:22 - Mokanda na Bomoi

22 Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 19:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.


Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango.


Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?


Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo !


Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.


Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango.


Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.


Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.


Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ