Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 19:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 19:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.


Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.


Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.


Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »


Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »


Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.


Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.


Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ