Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 18:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 18:7
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.


Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.


Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.


mpe alobaki na bango : « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama ; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu.


Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.


Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.


komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.


salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.


Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.


Lisumu oyo ya bana mibali ya Eli ezalaki monene na miso ya Yawe, pamba te bazalaki kozwa na limemia te mbeka oyo ebonzami mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ