Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 18:4 - Mokanda na Bomoi

4 Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 18:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?


mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.


Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.


Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;


Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.


Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »


mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.


Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ