Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 18:28 - Mokanda na Bomoi

28 Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 18:28
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi ! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe.


Tala ndenge esengeli kosalema : moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka.


balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.


Balobaki : « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.


Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu ; nalobaki na bango : — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki ! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye ! Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango.


Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.


Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende.


Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye : « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. »


Kasi Yesu azongisaki : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na Ye : — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?


Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola ! Bazalaki kopamela mwasi yango makasi.


Yesu alobaki : — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano.


Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya ; alobaki na ye : « Salisa moto oyo malamu ; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa ! »


Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ